Merci ya Méjé po obota Nana Ketchup
Nana na nga lelo na sosoli
Que bolingo le veritable ebombana na mitema
Oyo basalaka semblant lokola balingaka te oh
Yo oyaki na vie na ngayi na maloba ya basantu
Na komaki ko kanisa kutu yo
Nde porte parole ya Nzambe
Nga na motema natielaki ye ba anti-vols
Po ata après un siècle mobimba
Moyibi ya bolingo akota te
Nzoka yo fraudaki na sentiment pe
Na makanisi que na terminus ya bolingo
Ofuta nga droit ya bolingo te
Et pourtant yo salaki mosala
Moninga apesaki yo bolingo o multiplier
Y'okomisi yango lokola parfum
Oyo yambo mosombi avant asomba il
Sima naye soki zomi bakosala
Tango okozonga okokuta nga ya ndambo
Yango lelo nga na bondeli yo ozonga
Yango lelo nga na bondeli yo ozongela
Oyo ozo sala nga oko bomisa na ba innocents
Mayi ya miso nasaleli matanga na yo lelo
Oh nana po na boyi na provoquer fin du
Monde oyo nzambe a prevoyaki te
Elikia ya suka nazo zela se motema na nga
Peut être okoyoka ng'ata mwa mawa na
Oyo azalaka na monguna te Nana
Liwa ya bato mosusu soki tozo
Y'olakisi nga yanga moko po
Bolingo oyo ebandaki n'esengo
Lokola mwana azongi kelasi na elamba ya sika
Lelo y'obongoli'ango mawa
Nakoma koyina ti nzambe mokeli na nga
Soki likolo eyindi nazo banga mvula enoka
Eloko na tikala nango seul souvenir oh maman
Avant indépendance, maman
Na yebi nako mona yo lisusu te oh Nana ah
Zonga opesa nga ata baiser ya suka
Eh Gautier Ewing na Milan, mon pote
Yo moto oyaki kozuwa nga na
Aéroport ya l'amour na cortège
Nzoka mituka oyaki nango pona honneur na nga
Ezalaki déception, malheur
Nayebelaki yo motema makasi boye te Nana
Kende nzambe a réviser yo
Y'okatani mosisa oyo eyokaka bato mawa
Y'okatani mosisa ya souci a baninga a
Nana kombo na yo esi ekoma
Soki nazo bela natangi kombo
Parfum nayo lokola likayabu
Mopepe ata ememi solo nayo
Ata 10 kilomètres nayokaka
Moto osekwisaki akufi lisusu akomi nde
Kopola oyoki n'o mawa te, nana Ketchup
Lelo nga na ndimi, l'amour est aveugle
Po ezuwa toli te na mbeli ya déception ezuwa
Yak'olongola nga kindoki ya mukolo lesa
Nga ekomisa nga kizengi nasi nakomi na suka
Yak'o libérer no nga ah nakowa pona yo Mama
Nakokoka mpé kobosana yo te Nana
Nakokoka mpé kobosana yo te Nana
Tu es vraiment unique en ton genre
Tu es vraiment unique en ton genre
Tu es vraiment unique en ton genre
Tu es vraiment unique en ton genre
Tu es vraiment unique en ton genre
Tu es vraiment unique en ton genre
Tu es vraiment unique en ton genre